Traduit
en Lingala
Par L'Observatoire des Langues (Ministère de la Culture et des Arts)
|
BASI
KIMYA mpe BOBOTO
|
mokano ya Lisanga ya linongi, 1325
(2000)
Lisanga lya
linongi,
Na bokundolaka mikano 1261 (1999) mwa 25 sanza ya mwambe 1999, 1265 (1999) mwa
17 sanza ya libwa 1999, 1296 (2000) mwa 19 sanza ya minei 2000 mpe 1314 (2000)
mwa 11 sanza ya mwambe 2000, bakisa mpe mbela ya Prezida wa yango likolo lya
makambo mana, na bokundolaka lisusu esakola ya Prezida wa yango liboso ya bapanzi
sango na libaku ya Mokolo mwa Lingomba lya Bikolo bya Molongo mpo na makoki
ya basi mpe kimya na mokili (Mokolo mwa Molongo mpo na mwasi), mwa 8 sanza ya
misato 2000 (SC/6816),
Na bokundolaka mpe makambo mpe mwango ya misala ya Beijing (A/52/231) bakisa
mpe makambo maye malobamaki na Likita linene lya Lingomba lya Bikolo bya Molongo
na liyangani na yango ya mbalakaka ya mbala 23 maye mayebani na kombo "basina
mobu 2000 : bokokani ya mwasi mpe mobali, ntombwana mpe kimya mpo na sekula
ya XXI" (A/S-23/10/Rev.1), mingi mpenza makambo maye matali basi mpe bitumba
;
Na boyebaka malamu makambo na ntina malobami na Mobeko monene ya Lingomba lya
Bikolo bya Molongo mpe na bondimaka 'te Mobeko monene mwa Lingomba lya Bikolo
bya Molongo epesi na Lisanga lya Linongi mosala monene ya kobatela kimya mpe
boboto na mokili ;
Na bomonaka na mpasi o motema 'te makama ya bitumba ekwelaka mingi bato bazangi
mandoki, ndakisa batangolami (bato bakima mboka ya bango) mpe bolongolami (bato
baye bolongoli bango o bisika bya bango, mingi mpenza basi mpe bana, zambi basoda
mpe bato bazali na mandoki bakozwaka bango ndanga, mpe na boyebaka 'te makambo
mana manso ma kopekisa kimya mpe boyokani bwa solo ezonga ;
Na bondimaka mosala monene basi bazali kosala mpe na kokebisa mpe kosukisa bitumba
mpe kolendisa kimya, mpe na bomonaka malamu 'te esengeli bazala na makoki ndenge
moko na babali mpo na kotya mpe kolendisa kimya mpe boboto, mpe esengeli lisusu
kokotisa bango na bisika mikano mizwamaka mpe bisika balukaka kosukisa matata
;
Na bondimaka lisusu
lisengisi ya kotosa mbongisami ya mobeko ya molongo etali bomoto mpe bisaleli
ya makoki ya moto biye bikobatela mpe makoki ma basi mpe bilenge-basi tango
mpe sima ya bitumba;
Na bosengaka makasi na mangomba manso mazali kobunda masala manso mpo 'te mwango
ya bokundoli mine mpe mateya matali makama ya mine makeba na mposa ya basi mpe
bilenge-basi ;
Na bomonaka lombangu ya koluka ndenge ya kokabola misala kati ya mwasi na mobali
tango ya kotya kimya, mpe bongo, na botalaka mbela ya Windhoek mpe mwango mwa
misala ya Namibi etali bokokani ya mwasi na mobali na misala ndenge na ndenge
ya koluka kimya (S/2000/693),
Na bomanyolaka malamu etinda ya Prezida ya Lisanga lya linongi na maloba ma
ye liboso ya bapanzi sango na mwa 8 sanza ya misato 2000, wapi asengaki 'te
bato banso bazali na misala ya kotya kimya, bazwa mateya ma sikisiki matali
ndenge ya kobatela basi mpe bana, mposa mpe makoki manene ya basi mpe bana baye
bazwami esika ya bitumba ;
Na bomonaka 'te soki bayebi malamu makama ya bitumba likolo ya basi mpe bilenge
basi, soki mibembano mya solo kati ya binama mizalaki mpo na kobatela bango,
mpe soki bazalaki o bisika bazali koluka kotya kimya, mbele kotombala kimya
mpe boboto na mokili esalemaka na bolembu ;
Na bomonaka 'te esengeli koyeba ndambo ya makambo etali makama ya bitumba likolo
ya basi mpe bilenge-basi ;
Lisanga lya Linongi :
1. Esengi na lombango na Bikolo bya Molongo bisala nyonso mpo 'te basi bazala
na motango molongobani na nivo nyonso mikano mizwamaka, ezala na bikolo, na
masanga ya bikolo to na kati ya Lingomba lya Bikolo bya Molongo mpo na kokebisa,
koyangala mpe kosilisa matata ;
2. Esengisi Seketele Monene wa Lingomba lya Bikolo bya Molongo esalela mwango
mwa ye (A/49/587) eye esengi 'te basi bazala mwa mingi o bisika mikano ya kobongisa
matata mpe koluka kimya mikozwamaka ;
3. Esengi na lombango na Seketele monene 'te akoka kopona mingi basi bo Bantoma
mpe Batindami ba ye mpo na koluka kobongisa matata, na yango esengi na Bikolo
bya Molongo bikoka kotinda epai ya Seketele monene kombo ya basi bakandida ;
4. Esengi lisusu na lombango na Seketele monene akolisa lotomo la basi na misala
mya Lingomba lya Bikolo bya Molongo o bisika ya bitumba bo banongi ba basoda,
bapolisi to banganga ya makoki ma moto mpe bo basungi bato ;
5. Emikoki mpo na kokotisa bokokani ya mwasi na mobali na misala ya kotya kimya,
mpe esengi na lombango na Seketele monene, soki esengeli, basi mpe bazalaka
kati ya misala miye Lingomba lya Bikolo bya Molongo mikosalaka na bikolo bizali
na bitumba ;
6. Esengi na Seketele monene ayebisa na Bikolo mitindo mpe makambo matali kobatela
basi, makoki mpe mposa na bango, bakisa mpe makambo matali litomba 'te basi
bakoka kozala esika ya koluka kotya mpe kolendisa kimya, esengi na Bikolo bikotisa
makambo yango mpe mateya matali sida kati ya mateya maye bikopesa basoda mpe
bapolisi bazali kolengele etumba ; mpe esengi lisusu na Seketele monene mpo
'te basivili baye bazali na misala ya kotii kimya bazwa mpe mateya wana ;
7. Esengi na lombango na Bikolo bibakisa masalisi ya mosolo mpe ya bisaleli
bisusu biye bikopesaka mpo na mateya matali bokokani bwa makoki, bibakisa mpe
masalisi bikopesaka na binama bisusu bya Lingomba lya Bikolo bya Molongo, lokola
Enama (Mosolo) ya Lingomba lya Bikolo bya Molongo mpo na mwasi, Enama (Mosolo)
ya Lingomba lya Bikolo bya Molongo mpo na mwana, komisalya Enene ya Lingomba
lya Bikolo bya Molongo mpo na batangoli mpe binama bisusu ya sikisiki ;
8. Esengi na baye banso bazali na masolo ya koluka kotya kimya bandima bokokani
kati ya mwasi mpe mobali ; mingi mpenza :
a) kokeba mingi na mposa ya basi mpe bilenge-basi o eleko ya kozongisa bango
o bikolo bya bango, kokeba mpe na masalisi ya kopesa bango ntango ya kotonga
mboka ya bango sima ya bitumba ;
b) kondima kosalela meko mpe makanisi matali kimya mpe kosilisa matata euti
na masanga ya basi ya ekolo mpe kosala 'te basi bazala o ebandela mpe suka ya
masolo ya koluka kimya;
c) kondima kosalela meko ekobatela mpe ekomemya makoki ya basi mpe bilenge-basi,
mingi mpenza na maye matali mama-mobeko, maponi, bapolisi mpe bosembo ;
9. Esengi na mangomba manso mazali kobunda, matosa mobeko ya molongo etali makoki
ma basi mpe bilenge-basi mpe bobatelami na bango bo basivile ; malanda masengisi
ma Mibembano ya Geneve ya 1949 mpe makambo mabakisami likolo na 1977, malanda
Mobembano ya 1951 etali batangolami mpe makambo mabakisami likolo na 1967, malanda
Mobembano ya 1979 etali bolongoli mbeba nyonso ya botii basi pembeni mpe makambo
mabakisami likolo na 1999, bakisa mpe Mobembano ya Lingomba lya Bikolo bya Molongo
etali makoki ya mwana ya 1989 mpe makambo na yango mibale ya 25 sanza ya mitano
2000, mpe makeba lisusu na mbongisami ya Mobeko ya Esambelo ya molongo mpo na
bitumbu ya Roma ;
10. Esengi na mangomba manso mazali kobunda mazwa meko ya kobatela basi mpe
bilenge-basi na makambo ma nsoni na makasi, mingi mpenza kolala mwasi na makasi,
mpe minyokoli ya ndenge na ndenge likolo ya nzoto ya mwasi, bakisa mpe matungisi
nyonso basi bakutanaka na yango tango ya bitumba ;
11. Elobi polele na Bikolo 'te bisengeli kopesa bitumbu mpe kofunda bato baye
banso basali mbeba ya bomoto mpe mbeba ya etumba, bakisa mpe mbeba nyonso ya
koluka basi mpe bilenge-basi na makasi, mpo na yango, eyebisi na bikolo 'te
mbeba inso wana isengeli kolimbisama te ;
12. Esengi na mangomba manso mazali kobunda matosa ka ya batangolami mpo bazali
basivile mpe makeba na mposa ya basi mpe ya bilenge-basi, ezala tango bazali
kotongela bango ka mpe tango bazali kofandisa bango na ka yango, mpe ezali kokundola
mikano na yango 1208 (1998) ya mwa 19 sanza ya zomi na moko 1998 mpe 1296 (2000)
ya mwa 19 sanza ya minei 2000 ;
13. Esengisi baye banso bakolengele mpe kobongisa kobotolo basoda mandoki mpe
kobimisa bato na mosala ya basoda mpo na kozongisa bango na bomoi ya basivile,
bayeba kokesenisa mposa ya basi na babali bauti na mosala ya soda mpe mposa
ya bato baye bango bazali kokengele ;
14. Emikoki lisusu mpo na koyekola makambo makoki kokwela basivile, tango ekozwa
meko engebene na Atikele ya 41 ya Mobeko monene ya Lingomba lya Bikolo bya Molongo,
mpe bongo na bokebaka na mposa ya basi mpe bilenge-basi, koluka ndenge ya kolimbisa
makambo masusu ;
15. Emikoki mpo 'te, na lisalisi ya masolo na masanga ya basi ya bikolo mpe
ya molongo, misala mya yango mikeba na bokokani ya makoki ya mwasi na mobali
;
16. Esengi na Seketele monene 'te ayekola makama ya bitumba likolo ya basi mpe
bilenge-basi, ayekola lotomo la basi na kolendisa mpe koluka kimya mpe kobongisa
matata, mpe esengi ye lisusu apesa yango lapolo etali makambo maye, mpe atinda
yango na bikolo bizali na lingomba lya Bikolo bya Molongo ;
17. Esengi na Seketele monene akoka, na lapolo akotindela yango, koyebisa ndenge
nini bokokani ya mwasi na mobali ezali kosalema kati ya misala ya botii kimya
mpe kati ya makambo masusu etali basi mpe bilenge-basi ;
18. Ekani 'te bayebisa tango nyonso ndenge nini makambo yango mazali kotambola.
Mpo na koyeba makambo mingi,
luka na www.un.org/womenwatch
Mpo na mbala ya yambo, Lisanga lya Linongi ya Lingomba lya Bikolo bya Molongo
etalaki likambo lya "Basi, Kimya mpe boboto", o engumba New-York na
mwa 24 mpe 25 sanza ya zomi 2000. Ezalaki mbongwana monene eye ekotikala seko.
Masolo mango matalaki mposa ya basi ya kozala kati ya misala mya Lingomba lya
Bikolo bya Molongo mpo na botii kimya mpe matalaki lisusu likambo linene ya
mosala mwa basi mpo na bolendisi mpe botii kimya na mokili.
Bato mingi baye bazwaki maloba bamonaki 'te esengeli kokotisa basi kati ya misala
mya bolendisi kimya mpe basengeki 'te basi bazalaka o bisika mikano mizwamaka
.
Mokolo mwa 31 sanza ya zomi 2000 bai-lisanga lya Linongi banso bandimaki mokano
1325 (2000) etali basi, kimya mpe boboto. Mokano mwango mosengeki na baye banso
basengeli kosalela mibembano mya kimya 'te na misala mya bango baluka kosala
nyonso ekoki mpo basi na babali bazala na makoki ndenge moko, mpe bakeba mingi
mpenza na mposa ya basi mpe bilenge-basi o eleko ya kozongisa mpe kotya bango
o bikolo bya bango. Bakeba mpe lisusu na masalisi bakopesa bango ntango ya botongi
mboka ya bango sima ya bitumba.
Bondimami ya mokano moye bozalaki bongo mosala kitoko moye moyebi lotomo ya
basi mpo na kosukisa bitumba, kotya mpe kolendisa kimya sima ya bitumba.
Sima ya maloba maye, tokozwa bongo mokano mwa Lisanga lya Linongi.